Moïse Katumbi Chapwe: Moto ya politiki ya Congo (RDC)

Moïse Katumbi Chapwe (abotamaki mokolo 28 sanza ya mosopa ngbanda 1964) azali mosali politiki mpe mosali mombongo ya ekolo Kongo.

Moïse Katumbi Chapwe
Moïse Katumbi Chapwe: Bomoyi bwa ye, Kelasi, Musala na ye moko
Fonctions
Député
Moyángeli-etúká
Biographie
Naissance
Voir et modifier les données sur Wikidata (59 ans)
Kashobwe (d)Voir et modifier les données sur Wikidata
Nom dans la langue maternelle
Moïse KatumbiVoir et modifier les données sur Wikidata
Nationalité
Activités
Homme politique, entrepreneurVoir et modifier les données sur Wikidata
Autres informations
Parti politique
Ensemble pour la république (en)Voir et modifier les données sur Wikidata

Azalaki Bokulaka ya Etuka ya Katanga, oyo ezali o ngele ya Ekolo Demokratiki ya Kongo, kobanda na mobu 2007 kino sanza ya libwa ya mobu 2015 . Ye azalaki moko ya baye Lisanga ya Bana Mboka Mpona Kotonga pe mpona Demokrasi (PPRD) kino mokolo 29 sanza ya libwa 2015 . Ebele baloba na ntina naye ete “akoki kozala moto ya mibale oyo azali na nguya ebele o Ekolo Demokratiki ya Kongo sima ya Kumu wa Liboso ya ekolo, Joseph Kabila " mpe ye atatolamaki moto ya Afrika po na mobu 2015 " na makomi ya nkasa ya nsango Jeune Afrique.

Moïse Katumbi Chapwe: Bomoyi bwa ye, Kelasi, Musala na ye moko
Moïse Katumbi, o mobú 2010.

Bomoyi bwa ye

Moïse Katumbi na kombo na yé ya mbota "Moïse Soriano" abotamaki na mama ya ekolo Kongo mpe tata ya ekolo Greka, Nissim Soriano, oyo akimaki mboka Rhodes tango ezalaki kokunzama na Ekolo Italie ya ba fascistes okatikati ya bitumba ya mokili mobimba oyo ya liboso na oyo ya mibale. Ye akendeki kovanda na Katanga, pembeni ya etímá ya Moero .

Moïse Katumbi asila kobalana na mwasi o nkombo ya Carine Katumbi.

Kelasi

Moïse Katumbi atangaki kelasi na eteyelo Kiwele ya Lubumbashi mpe na Mission Kapolowe esika azwaki dipolomi naye mpe asilisaki na kelasi ya lolenge ya kokanisa (Psychologie).

Na ntango akomaki ko yangela mombongo ya ndeko naye ya mobali mpe abandaki musala na Zambie, ayekolaki angeleza mpe alandaki kelasi ya koyekola boyangeli.

Musala na ye moko

Mombongo

Mombongo ya mbisi

Moïse Katumbi abandaki musala naye ya mombongo na kotekateka mbisi na eteyelo mpe a zwaki matabisi ya dollars 40 na tango azalaki na maul 13. Sima nayango apelaki makasi na mombongo ya mbisi na etímá ya Moero epayi wapi abandaki kotekela mingimingi biloko naye kompani ya mbulamatadi na nkombo ya Gecamines.

Etablissement Katumbi

Akobisaki misala misusu o ekolo Zambie mpe a tombolaki yango na mimbongo misusu: bokumbi mituka, mombongo, komema biloko ya koliya. Kobanda na botongi ba nzela milayi mpe ya ba nkoto ebele ya mapeko kino na komema lotiliki o ba mboka miyike mpe bingumba minene, kotonga mpe kobongisa biteyelo mpe ba lopitalo, Katumbi atika kombo naye bisika nyonso na Etuka ya Katanga.

Na mobu 1987, akelaki bongo ndako munene ya mombongo o nkombo Etablissement Katumbi mpo na kosangisa misala naye nyonso ezala ya botimoli bandeké ya mabanga ya ntalo, bomemi mituka to mpe bomemi bileyi.

Mining Company Katanga

Mbula zomi sima na yango, sima ya tombola musala naye, akelaki MCK (Mining Company Katanga), Oyo esilaki kozwa 80% ya misala ya botimoli ba ndeké ya kwivre mpe ya kobalt ya Gecamines. Mokolo 9 sanza ya mpela ya mazobo ya mobu 2015 kompani ya baye ekolo France na nkombo Necotrans esombaki MCK o motango ya mbongo oyo eyebani te.

Lisano ya ndembo

TP Mazembe

Kobanda mobu 1997, Moïse Katumbi azali pe Mokambi wa lingomba lia lisano ya ndembo TP Mazembe ya Lubumbashi. Lingomba liango lisila kolonga mbala mitano Ligue des Champions mpe elonga nayango ya suka ezalaki na mibu 2009 , 2010, mpe 2015. Ebetaki mpe masano ya suka ya Bobeti ndembo ya Mangomba ya Mokili Mobimba ya FIFA na mobu 2010 na Abu Dhabi. mpe na mobu 2015 na Tokyo.

Lingomba oyo esalaki bongo nkombo na kokoma lingomba ya liboso ya Afrika ya koleka bokangikangi ya mikili ya mpoto mpe ya Amerika ya ngele, mpo na kokoma na suka ya masano ya Bobeti ndembo ya Mangomba ya Mokili Mobimba ya FIFA, wapi kuna ekutanaki na Inter Milan kansi balongaki yango mpe ekweyisamaki.

Moïse Katumbi asilaki bongo mpe kokomisa lisano ya ndembo pologalame ya bozalizali po na kozwa mpe kotangisa bilenge ya Etuka ya Katanga. (Bato koleka 2000 basili koyekola kino sikoyo) Katumbi asilisaki mpe kotonga libanda ya masano ya TP Mazembe na mobu 2011 ya ntalo ya millioni 35 ya badollar ya baye amerika.

Komisyo Stratégique ya FIFA

Kobanda mokolo ya 2 sanza ya elanga ya mobu 2012, aponamaki bongo na komisyo stratégique ya FIFA.

Bomoyi bwa Politiki

O mibu 2006 mpe 2011, Moïse Katumbi azalaki bongo ko telemela bobundi bwa Joseph kabila mpo na kozala tata mokonzi ya Ekolo Demokratiki ya Kongo. Kansi, lokola basusu mingi, Katumbi abendanaki mosika na Kabila na mobu 2015.

Na makomi o nkasa ya nsango Reuters ya mokolo 13 sanza ya mpela ya mazobo mobu 2015, Moïse Katumbi a sengaki ete bapesa bobateli ya kofundama na Kabila sima ya kolongwa naye na bokonzi “neti komekakomeka mpo na ko convaincre Kabila alongwa na bokonzi tango bokonzi naye ya mibale mpe ya suka ya boponami ekosila na mobu ekoya ". Moïse abakisaki ete Kabila soki alongwe na bokonzi na ntango mibeko mokonzi ya ekolo esengi ye kokende, eko komisa ye “tata ya demokrasi ya ekolo Kongo” mpe tata mokonzi ya ekolo ya kolingama mingi epa ya bayi ekolo Kongo.

Moponami na Lisanga ya Baponami ya Ekolo

Na mobu 2006, aponamaki lokola moponami na Lisanga ya Baponami ya Ekolo liboso ya koponama lokola Bokulaka ya Etuka ya Katanga na sanza ya elanga ya mobu 2007, ye aponamaki na bato 94 kati ya baponi 102.

Bokulaka ya Katanga

Mikolo mike kaka sima ya ye kozwa bokonzi lokola Bokulaka ya Katanga, Moïse Katumbi apekisaki kobima na mondelo ya ekolo ya mabanga ya ntalo oyo ewuti kobima mbala moko na mabele, a tindaki bongo ba kompani minene na kotonga bisika ya kobongisa mabanga ya ntalo na kati ya Etuka. Amatisaki mpaku ya Etuka kobanda badollar millioni 80 tiii na badollar miliale 3 mpo abundisaki kaniaka mpe asilaki komatisa kobima o ndelo ya ekolo ya ba cathodes ya Kwivre. Mbongo oyo basalelaki yango mpo na kotonga ba kelasi, ba nzela, ba lopitalo, mpe komema mayi peto ya komela(banda 3% tii na 67% bakoma kozwa mayi peto ya komela).

Kolandana na makomi ya suku ya ndeké, Moïse Katumbi asila bongo komatisa bosali ya kwivre kobanda 8000 kilo nkoto na mobu 2006 kino koleka Millioni moko na mobu 2014. Mbulamatadi naye esilaki mpe kotonga mapeko koleka 1000 ya ba nzela mpe kokitisa talo ya fufu ya masango kolongwa na badollar 45$ tii na badollar 10$ na saki moko.

Na mobu 2013, kolandana na mobeko likonzi ya mboka naye, Moïse Katumbi alobaki ete ako pesa nkombo lisusu te mpo na maponami mbala ya mibale lokola Bokulaka. Mpo na maponami ya tata mokonzi ya ekolo ya mobu 2016, bato mingi okati mpe libanda ya mboka bazali komona ye lokola mopesi nkombo mpe mokitani wa Joseph kabila.

Front Citoyen 2016

O mokolo 29 sanza ya libwa 2015 alongwaki o bokonzi neti Bokulaka, sima ya bakambi ya mangomba ya politiki sambo kobenganama na Majorité Presidentielle oyo ezali kokunza mpo bakomelaki Kabila mokanda okati nayango bazalaki kotuna makanisi naye ya kotika bokonzi na suka ya bokonzi naye ya mibale na 2016. Katumbi abakisaki ete kobima naye na PPRD eko pesa ye makoki ya kolakisa makanisi ya mbulamatadi ya kopotana na mobeko likonzi ya ekolo mpe kozongisa maponami sima yango ekozongisela mpe ye bonsomi ya maloba mpe ya misala. Kaka na bosakoli moko wana, alobaki ete masolo munene ekosalema nakati ya baye societé civile mpo na kosala lingomba ya kidemokrasia mpe ya kotelemela ekolo na kati ya mboka . O mokolo 19 sanza ya mosopa ngbanda 2015, Moïse Katumbi asanganaki na bayangeli mangomba 26 mosusu basila koyebana ya Kongo na lisanga babengaki “Front Citoyen 2016”. Lisanga yango eza na makanisi ya kobatela mobeko likonzi mpe kosala ete maponami ya tata mokonzi wa ekolo ya mobu 2016 esalema.

Bambano mpe ba mpalata

O mokolo 15 sanza ya mosopa ngbanda 2012, Fondation Excellence Millenium epesaki Katumbi mpalata ya “ Monzoto Moindo ya Afrika mpo na mobu 2012” na Nairobi, Kenya. Mpalata oyo ezalaki po na kondima misala mpe motuya naye neti molongi na boyebi kokunza malamu ya Afrika.

Na sanza ya elanga 2015, Moïse Katumbi azwaki mpe mpalata ya “Moyangeli lisano ya ndembo wa mobu” na maboko ya Lisanga ya mangomba etali masano ya ndembo na Afrika.

O mokolo 22 sanza ya mosopa ngbanda 2015, Moïse Katumbi atatolamaki “Moto ya Afrika mpo na mobu 2015” na nkasa ya nsango Jeune Afrique, nkasa ya nsango eleka misusu ya bikolo ya afrika na munene.

Mazita o libanda

Etatoli

Tags:

Moïse Katumbi Chapwe Bomoyi bwa yeMoïse Katumbi Chapwe KelasiMoïse Katumbi Chapwe Musala na ye mokoMoïse Katumbi Chapwe Bomoyi bwa PolitikiMoïse Katumbi Chapwe Bambano mpe ba mpalataMoïse Katumbi Chapwe Mazita o libandaMoïse Katumbi Chapwe EtatoliMoïse Katumbi ChapweDocumentation du modèled:Q978715

🔥 Trending searches on Wiki Lingala:

1926AtomeLingálaKɔntaláPulúpulúAzotiNganga-bomwǎsíMobékoBúsiBilembo-nkita bya Azɛrbayzáni19711952KikalakasaAfganistániKinsásáShekiaLibándá lya mpɛ́pɔ lya Dong HoiIdrojɛ́níRapMondúleKwángaFɛ́tíOmaha (Nebraska)PasifíkiLigrekiEboboZulunáSlovenia2004Lipulutugɛ́siNgulúbɛManákaPatrice Ngoy Musoko1965MabeléEyenga ya Mbótama1968EtɔɛlɛIndiaKongó-KinsásáBokomiPragAndré-Joseph Makelele1981ErópaLóndɛlɛ1992NdukaIngɛlandi1625Mabɛ́lɛGabɔ́LipapúNiceNzaleEswatiniNepáliWashington1973Brazilia1978Force d'intervention rapideNzíngaBatoVolkswagenGuvɛnɛmá1963EsálelaUbuntu🡆 More