Fièvre Jaune

Fièvre jaune, kala na lokota ya Angele eyebanaka bo yellow jack, yellow plague, to bronze john, eza bokono ya makasi kouta na virus . Na ba cas mingi, bilembo bizalak fièvre, kolenga, kozanga mposa ya kolia, nausé, mpasi ya misunyi ya nzoto mingi mpeza na mokongo, mpe moto mpasi. Mingi mingi bilembo bibandaka kosila nakati ya mikolo mitano. Epayi batu misusu nakati ya mokolo ya boyoki mua malamu, fièvre ezongakaka, babandaka koyoka mpasi na se libumu, mpe mikakatano ya foie ebandaka kobongola loposo ya nzoto kokoma loposo ya jaune. Soki esalemi, risque ya kotangisa makila mpe mikakatano ya ba rein mpe emataka.

Bokono oyo ewutaka na virus ya fièvre jaune mpe ekabolamaka na ngungi ya mwasi ntango akosuwa. Epesaka bokono obe na batu, ba makaku misusu, mpe lolenge misusu ya ngungi. Na bingumba, ekabolamaka mingi mpeza na ba ngungi ya lolenge ya Aedes aegypti. Virus oyo eza virus RNA virus ya lolenge ya Flavivirus. Eza mpasi kokesanisa bokono oyo na ba maladi misusu, mingi mingi na ebandeli nayango. Mpo na koconfirmer soki mutu azwami nayango, esengelaka kosala examen ya makila na préaction na mulongo ya polymérase.

Mangwele ya malamu mpe ya makasi mpo na fièvre jaune ezali mpe ba mboka misusu esengaka na bakeyi mibembo bakata mangwele oyo. Nzela mosusu mpo na komibatela eza kokitisa motango ya ba ngungi oyo bakabolaka bokono oyo. Na bisika biye fièvre jaune ezwi batu ebele mpe mangwele ezali, bokundoli liboso na ntango baye baza nayango mpe kopesa mangwele na batu ebele ezalaka ya litomba mpo na komibatela na ba épidemie. Ntango mutu asili kozwama nayango, lisalisi lizalaka mpo na bilembo mpe lizalaka te na mikano miye misembolami mpeza mpo na kobundisa virus. Epayi ya baye baza na bokono makasi, liwa ememaka pene na ndambu ya batu oyo bazali kozwa triatement.

Fièvre jaune ememaka infection na batu 200,000 mpe koboma batu 30,000 mobu na mobu, mpe pene ya 90% ya makambo oyo esalemaka na Afrika. Pene na milliard moko ya batu bafuandaka na bisika biye bokono oyo ezwaka batu mingi na mokili. Ezwaka batu mingi na ba région tropicale Amerika ya Se na Afrika, kasi na Asia te. Uta mobu ya 1980, motango ya baye bazwami na fièvre jaune ezali kaka komata. Endimami ete eza mpo batu moke mpeza nde bakokata mangwele, mpe batu mingi mpeza bakomi kofuandaka nakati na bingumba, mpe batu kobongolaka bisika bafuandaka mbala na mbala, na mpe lisusu mbongwana ya climat. Bokono oyo ebandaki na Afrika, mpe ekendeki na Amerika ya Se na nzela ya kotekisa baumbu na siècle ya 17. Uta siècle 17, épidemies minene minene ya bokono oyo esalemaki na ba Amerika, Afrika, mpe na Eropa. Na siècle ya 18 mpe 19, fièvre jaune ezalaki kotalema bo moko ya ba maladi oyo epesamaka ya mabe mpeza. Na mobu ya 1927 kati na ba virus oyo ezwaka batu, virus ya fièvre jaune ekomaki virus ya yambo kotiyama pembeni.

References

Tags:

Fɛ́fɛlɛLibaleLibumuVilúsu

🔥 Trending searches on Wiki Lingala:

IstanbulMokɔlɔ 13 sánzá ya mísátoLoyémbo-lokúmu la SidafríkaSlovakiaLitámbwisi-bolúkiEsakola ya mawaUgandaErópaAmeríkaMoyémbiBolóko ya MakalaSarajevoLosángóKongó-BrazzavilleYangangaMbísiSantiagoCoca-ColaKilogálameLifalamáLibɔlɔ́Sánzá ya mínei1968MóngangaKoré ya NolaKokotíKoweit100 (motuya)YésuIslamuSarah BernhardtLóndɛlɛ1943Lacoste1939BelizeUkarístiaMokɔlɔ 3 sánzá ya nsamboFalanséHaikuLisangá lya AmeríkaMoí-politíkiKroasiaMbokéDallasLingómbá lya Botángísí Nzebi mpé Liyébi lya Bikólo BínsɔFɛ́tíAlémaniMaláli na mɔpɛpɛMokɔlɔ 4 sánzá ya mítánoMbúla (mái)Mokɔlɔ 21 sánzá ya míneiMakiláCap-VertMokɔlɔ 20 sánzá ya mísátoSingapurMokɔlɔ 12 sánzá ya yamboAzía ya Súdi-MonyɛlɛGoogleSánzá ya mísátoAlpiKanadáLosámboEsálelaMwǎsíTurkí🡆 More